Breaking News

Message de divinité Kimbanguiste du 3 septembre 2017

BA NDEKO TO TANGA MAKAMBU YA MINENE TATA KIMBANGU KIANGANI AZALI KO BIMISA

MESSAGES DE SA DIVINITE PAPA SIMON KIMBANGU KIANGANI LE DIMANCHE 3 SEPTEMBRE 2017 A KINSHASA
===================================


Kimbanguisme oyeee
Nkamba oyee
Kinshasa oyeee
e wunuee, e mbaziii, bilumbu bia kulueee, yangalalaaa
esengo bien esengo teee, kiese vo ka kiese kue, nsai vo ka nsai kue
.
Na kombo ya Tata, Muana pe Tata Molimo Santu,
tolobaki yango ke mokolo ya yenga toya ebele tosala mosala pe tosolola lisusu. Toza na esengo pamba te tozosenga kimia ezala mingi pe mokili mobimba. Tolobaka ke ekeke ya mineyi eza na maboko ya Tata Molimo Santu ye nde ayaki kosukisa. Ye azali moto ya kimia. Ye asengaka na ye mabondeli, boyokani, bitumba te nini te, kosuana te, kobunda te. Pamba te mokili oyo tozali pe mboka na biso esengeli ezala na kimia mingi pe mokili mobimba. Mangomba nionso tobengami bandimi, mondimi azalaka mutu ya mobulu te, azalaka pe mutu ya bisalela te, tobanga Nzambe.
.
Na 1921 tangu abandaki musala na ye na Yeluselemi asalaki 2 mois, na Mbanza Nsanda nde asalaki 3 mois. 5 mois wana ya mateyi na mateyi. Ba propheties mingi alobaki yango wana ezali komonana na mokolo ya lelo. Sika awa ekomi ke mokili mobimba, ya mingi esi tomoni, ya mingi pe nanu tomoni te, ya makasi ezali koya liboso. Mais tangu oyo tozali ke biso tosambelaka il faut tosambelaka mingi, wana ezali devoir na biso. Koyoka mateyi mingi bozonto ezala te, molimo elata biso makasi. Tokotaka na makambu ya mabe te ! Pamba te Nkolo Yesu tangu amonaki makambu oyo ezali koya apesaki yango na bayekoli. Ba photos ezalaka te, ba appareils nionso, camera, nini tangu wana ezalaki te kasi bazalaki kokoma. Yango totangaka na bible. Ba Matthieu bakomaki, ba Jean bakomaki, presque bayekoli nionso, bazalaki ete bayoki makambu epayi ya Nkolo Yesu bazalaki kokoma yango, yango eza na kati na bible.
Tata Nzambe pe makambu na ye asalaki na ebandeli eza na kati na bible ba Moise bakomaki. Ba nganga Nzambe presque bazalaki kokoma yango batangelaka biso. Generation ya mineyi yango nde ya suka, ya mitano ezali te. Soki na generation ya liboso tolongaki te, ya mibale tolongaki te, ya misatu tolongaki te ya mbala oyo ya mineyi tolonga. Kuna na Moise balobi mibale kaka balongaka oyo bakotaka na mboka elaka. Le reste oyo balongaki bana oyo babotamakai na nzela. Mai ba oyo bawutaki na Egypte basukaki na nzela. Ebongo na ekeke ya mineyi tokokota boni ? Yango esengeli ete, biso esengeli tolonga. Ba pasteurs bazali koteya , ba selo bazali koteya, bateyi pe bazali koteya. Biso toyokaka tobomba, tosalela puete mokolo wana tobika. Tomoni ke mokili eningani
oyo nionso eza na bible yango nde batangelaka biso. Batu pe ba reunion ezali kaka. Bazali kolala pongi te, ndenge nini bakosala po mokili ebeba. Kasi bino babengi bandimi oyo ozala mondimi ya wapi mabondeli totika te. Balobi ke ba propheties wana ya Simon Kimbangu tokolanda te mais suka ya likambu ekomonana. Yango Papa Diangienda alobaki ete antilope ye alalaka na esobe, periode oyo bazalaka ke besobe nionso eziki ye place ya kokimela pe ezalaka te. Epayi toza kokende ekozala bongo. Biso kaka te oh RDC, oh Brazza, oh Angola, te, mokili mobimba. Likambu wana ezali koya na liboso ezali makasi mingi. Nde okokimela wapi ? Et surtout balobi biso loposo muindu tokokimela wapi ?
5 mois ya Papa Mfumua Longo Papa Diangienda Kuntima elobaki makambu mingi. Tobosana te ! Oza kolala, oza kolamuka sambelaka. Oyo toza komona lelo ekozala muke, oyo tokomona epayi toza kokende ekozala munene, ya mingi pe. Biso totunaka ba Papa, ebongo biso bandimi na yo ou bien bana na yo ya mokili mobimba oyo basambelaka na solo ? Kosambela na solo ezali nini ? Tokotaka na makambu te ! Ezali te ke lokolo mosusu na nzela, lokolo mosusu na zamba, soki kuna ozali te yebaka ke okobika. Pamba te pe songi songi na mangomba ekoti. Kosuan ana lingomba ekoti. Kobunda na lingomba ekoti, kofingana, makambu ebele ekoteli biso. Mais tozala ba vrai bandimi. Obengami mondimi ya Tata Simon Kimbangu pe bandimi ya mangomba mususu yebaka ete Nzambe azali kotala biso, Nzambe azali koyoka biso. Yango tosengi kimia, kimia, kimia ezala. Tozo kanisa ete makambu esili, makambu esili te. Po bilembo nionso tozalaki komona yango. Papa pasteur Katembo, papa Mario boya liboso. Okokanisa ke ah Papa ye moko mutu akanisi yango, te ! Eza na ba chapitres makasi makasi ndenge nini yango ekolekela, ndenge nini ekozala, ba oyo basalelaka ye na solo bakozala ndenge nini. Pamba te Nkolo Yesu na bayekoli na ye abengi bango, mais na matata. Surtout Simon-Pierre azuelaki ye na matata. Ba mosusu Jean-Baptiste alobi bolanda tata oyo bokobika. Tangu moko bayekoli bango nionso bavandi esika moko batuni Nkolo Yesu, awa toza kolanda yo biso totiki ba famille, totiki ba mama, totiki bana, mosala tozalaki kosala ya ko pecher totiki yango tolandi yo, okofuta biso nini to oko pesa biso nini ? Nkolo Yesu akendaki mosika te alobi bomoyi ya seko. Ata okufi oza na bomoyi ya seko. Pe bayekoli bamonaki ya solo. Pamba te bomoyi ya seko nzoto wana ekokufa mais molimo ekokufa te ekozala na yo seko. kufa ezali, seko ezali.
Alors soki totali oyo eza koleka na mokili mingi bazo mona kaka nzoto na ye, molimo aza kokipe yango te. Azomona molimo esala nango kaka masumu Nkolo Yesu ayaki kobikisa biso ye alataki nionso, te ! Nkolo Yesu aza kozela biso, soki okufi mutu ya liboso okomona ye avant okutana na Tata. Mais biso bandimi welela nzoto ebika, molimo pe ebika.
Alors likambu tokolobela sikoyo tangu Nzambe aningisi mokili na ye est ce que ekozala kaka bis, est ce que ba oyo batielaka Nzambe motema mateyi ezali bien ezali te. Papa pasteur mokili bien esika mosusu pe ezali ?
.
PAPA KATEMBO AZUI MALOBA. BA CHAPITRES BIBLIQUES
Hebreux 12 : 25 – 29
Apocalypse 22 : 1 – 5
EXPLICATIONS BIBLIQUE YA PAPA KATEMBO NA PAPA MARIO
.
Meci ba tata pasteurs, likambu ezali. Tangu likambu ekueyaka na famille, balukaka chef de famille bakoloba eh famille na biso eza lisusu bien te. Sikoyo tokosala ndenge nini ? Chef de famille akobengisa batu nionso bazala esika moko batala likambu po esila.
Lelo oyo eza likambu ya mokili mobimba, sikoyo tokosala ndenge nini ? Bomoyi ya Papa Diangienda alobi Afrique ezo kende na kokueya, toyokaka bien toyokaka te ? (toyokakaaaa) Afrique eza kokende na kokueya parce que biso na biso ba africains koyokana ezali te. Tomoni déjà danger munene eza koya liboso. Soki tolobi te ekokomela biso lokola niongo. Danger ezali koya na Afrique, Afrique kaka te mokili mobimba. Batu fo bayeba basosolo tokosala nini pona mupepe wana eleka ? Likambu ya Tata Nzambe pe eza compliqué, soki emonani te ah Nzambe akosaki. Mais na biso déjà esi tozui mayele, na ndenge nini ? Nionso eza na kati na bible soki otangi ozui mayele. Bible ezali lokola mokati ya mbila akeyi na tongo apesi mayele na batu bakomata na pokua. Kasi biso wana tozo sosola yango te tozo pelisa moto. Papa Diangienda alobi soki bozongi lisusu na colonisation ya mbala mibale trois siecles pasi na bino ekosila te. Oh Kimbangu azali mutu, likambo te oyo baza kondimela ye bazali malgré azali moto. Yo moto pe ozali Nzambe, mutu nionso azali Nzambe, alobaka yango. Na bango misatu, Tata, Muana pe Tata Molimo Santu,tosala mutu, alobaki bien tolobaki te ? (bolobakii ) Eh ngayi te, esika alobaki ete tosala mutu, yo mutu ozali Nzambe ! Nzambe aza na soucis que mutu tosalaki bango na bango bazali kobomana. Afrique eza na danger kobomana biso na biso batu. Ba Papa baza ko souligner bien que Congo Angola, Congo RDC, Congo Brazzaville tosimbana makasi toza na eloko ya motuya ndenge toyoki na bible nzete ya bomoyi.
Lisese ezali boye, tata moko aboti bana na ye bavandi na bango na kati na lupangu. Tata alonaki nzete. Mais nzete wana alonaki bana bayebaki tina nango te. Mais tangu tata aye kokufa mutu nionso akoya na matanga misu kaka na nzete wana. Bakundi tata wana, makambu esi esili eleki nango kasi mutu ayebaki valeur ya nzete wana akozonga na lupangu. Bana hein ata likasa ya pamba ya nzete oyo bopesa nga. Bana lokola bayebi tina te balobi zua na yo ndenge olingi. Makasa ezo kende bana baza ko profiter te. Suka nango bana bamoni ke eh nzete oyo makasa nionso asengi eloko mususu te eh biso tovandi kaka pamba. Fin des fins bayaki koyeba tina ya makasa wana. Yango nde totangi na bible. Ebongo yo muana RDC okososola te, okoyeba te ?
.
Biso tozo tinda kaka mabondeli ndenge Papa Diangienda alobaki ete mabondeli ya tongo, mabondeli ya ba ngonga, soirée na pokua , mbote wana ya soirée eza tina. Nzambe parce que alobi ke ye akosala naye lisusu mutu te. Akosala lisusu mutu te, tangu akosukisa likambu oyo elobami bien Nzambe akosala likambu banda mokili ebanda nanu emonana te. Tangu wana ba oyo toza kolela ah akufiee, akufiieee, ndenge Nkolo alobaki bomoyi ya seko. Po baye bakozala na bomoyi ya seko bakozonga. Mokili ya sika, mboka ya sika. Mboka wana, mokili wana, bitumba ezali te, kosuana ekozala te, makambu nionso ya mabe ekozala te bisengo na bisengo. Kasi soki oyebi likambu na nzoto na yo olingi koyoka te, pasi na yo ekozala ya seko.
Tata basali elanga. Elango oyo basalaki antilope kolia na kolia elanga wana. Tata alobi muan atosala mutambu ye mutu ayaka kolia biloko na biso akokangama. Basali motambu bake na bango. Tongo etani bakende kotala mutambu, antilope akangami. Atindi muana, antilope akangami ? Hein. Akangami wapi ? Oh na kingo. Tika ye akende na ye. Muana a regretter, kuna na ndaku mama asali fufu sikoyo antilope mobimba ekende nango ? Muana atiki antilope ekeyi. Balali balamuki lisusu, bake kotala, oh papa akangami lisusu. Est ce que akangami na lokolo ? Tika ye akende na ye. Ah muana a regretter lisusu, mais tata likambu nini ye aza kosala ? Tozo lala nzala antilope yango oyo ! Bazongi na bango. Muana na se ya motema ba regret eza nango kaka. Balali, balamuki, bazongi lisusu. Ah tata akangami sikoyo. Tata toujours mutuna na ye, esika nini ? Oh akangami na litoyi. Ah ye wana nde tokolia parce que ayokaka te. Nga namoni tolekisi.
.
Nzambe azali kolimbisa, kolimbisa, azali kotala. Oyo akoyoka ye wana nde akosepela libela. Yo okangami na litoyi ah oke pe libela okoyokana lisusu te kino suka ya mokili. Tobengami bandimi tososola toyeba. Pasi ezali koya ya makasi , Afrique ekomi kokueya. Toza kondima makambu ebele ebele. 1921 Papa Simon Kimbangu alobaki ete bana botanga. Oyebi ke tangu alamusaki bibembe, asalaki manso. Oyo bazalaki komona te, bazalaki komona. Oyo bazalaki koyoka te, bazalaki koyoka. Oyo bazalaki kotelema te, bazalaki kotelema. Ye alobi bon nakokangama, ayebaki mais nakozala lisusu te. Mundele akokoma mutu muindu, mutu muindu akokoma mundele pona poso ya nzoto te kasi na ba etudes oyo bokosala, misal aoyo ba mindele basalaka biso pe tokosala yango. Exemple toza na ba docteurs bazali ko soigner malades nionso. Mayele wana ye atindaki. Suka suka bana baza koyekola, baza kolakisa bana bakomi mayele, surtout oyo bazobotama sikoyo. Ngayi kutu nazali awa ba appareils mingi nayebi kutu ko manier yango te mais bana mike ayekoli te mais aza ko manier yango, aza kosalela. Tozo mona bien tozo mona te ? (tozo monaa) Suka wapi tozo kende, ba savant pe bazali. Tokosala makambu ya ndenge na ndenge oyo ezali ke bango soki bazuaki 1/4 biso tokozua combien ? (3/4) Tozua yango ? (ingetaaaaa) Est ce que tokozuela yango na mobulu ? (teeeee) tokozuela yango ndenge nini ? (na kimiaaa) Kimia na mabondeli. 3/4 ya sûr oyo ezali ke yo mutu muindu okosala makamuisi ya ndenge na ndenge. Kasi tozomonana zero. Tozomonana zero parce que oyo bazo loba na biso tozoyoka yango te, tozo salela yango te. Nzambe akofongola ndenge nini ? Akopesa ndenge nini ? Bien na biso ezali. Isaac alobi salela leki mikolo ezali leki akosalela yo.
Awa Papa Diangieda oyo mundele awutaka na Corée, naye kozongisa bokonzi na bino. Awa Mfumua Longo alobi kimbanguiste oyeee, oyeeee, nakende kozua yango ? Tondimaka bien tondimaka te ? (tondimakaaa) akende kozua yango hein ? (ingetaaa) Ye alobi na nzoto oyo naza nango te, kasi bolata sac tosenga bolimbisi lisumu ya Adam et Eve. Toyokaka bien toyokaka te ? (toyokakaaaa) Sikoyo toko rater makambu mingi pamba te totunanaka te. Oyo bateyaka biso tosimbaka yango te. Makambu ya bien ezali. Mokili na biso eza na lait na miel. Yo okanisi bako silisa yo ? (teeee) bakotika yango bien biso tokotika yango ? Ebotanaka kaka, eyaka nango kaka parce que eza mboka ya mapamboli ya kobokola mokili mobimba.
Kimbanguisme oyeeee (oyeeeee) tolobi mingi hein ? (teeeeee) Tata Simon Kimbangu alobi crise pe ekozala makasi na tangu wana. Mfumua Longo alobi tokozongela na zero. Toyokaka bien toyokaka te ? (toyokakaaa) Tokozongela a zero mais koyima yima ekoti, ah ah. Likambu ya Nzambe ata ewumeli maloba na ye ekosala. Ekosala bien ekosala te ? (ekosalaaa) Hein tozali kofongola ba portes mingi pona kobongisa RDC biso na biso kaka nde tozo fongola ba portes. Tozo mona ete milimo nionso eza kobunga responsable ezali yo. Tokozua exemple moko ba chefs coutumiers na Cataractes ndenge bamemaki Tata Simon Kimbangu na boloko ya Mbanza Ngungu. Mondele asali mokanda apesi na ba chefs coutumiers, signer, signer. Alors batu nionso bazalaki ko signer bakomi na mutu moko, tata Wasekua balobi na ye signer, oh makambu botangi te nga na signer, na signer ndenge nini ? Mundele atali non signer ! Ye alobi non nako signer te puisque nayebi makambu eza na kati te. Mais ebele déjà esi ba signer mais ye kaka, mundele alobi bon botanga. Makambu nini ezalaki na kati ? Simon Kimbangu ake na Lubumbashi na Katanga ti liwa na ye. Chef coutumier oyo tata Wasekua a signaki te mundele a feliciter ye, avant ko signer tanga. Ba oyo ba signaki ekomelaki bango probleme, bango nionso basilaki kokufa. Tangu bakufi mutu kaka alongaki akotaki boloko te na baweyi tata Wasekua, le reste bazalaki na pasi.
Mais lokola Papa Diangienda ye moko kaka Papa Kimbangu tosengaka bolimbisi na Nkamba puete ba tata wana ba chefs coutumiers bazala liberés, bakoma liberes. Soki oyebi ke okoti likolo, ata moko te nanu akoti te. Moko nanu akoti te, toza kozela koya ya Muana Nzambe Nkolo Yesu, ye nde akosala. Mais ba milimo nionso eza ya kokangama oyo babebisi, oyo tobebisaka, oyo ya malamu pe akufi na bokasi ya Tata Nzambe wana baza na place na bango reservé. Kosambela eza eloko ya mabe te eza malamu po molimo nayo ebika.
Moise ye wana, ah Satana atindi ange na ye, Nzambe pe atindi ange mais ya Satan mbangu trop awelela boye ya Nzambe alobi tika ye aza ya ngayi. Mais asalaki boye, te atubelaki. Biso motema makasi makambu mingi toza kosala oboyi kotubela. Mais toza kosenga nde mabondeli ezala mingi. Tosa bakonzi ezala ya l’État, ezala ya mangomba, oyo baza ko diriger biso, baza kotala biso, baza kosalisa biso, tosa bakonzi na ya mangomba na ya l’État. Toyokani hein ? (ingetaaa) po epa toza kokende pasi eza koya. Tangu otiki mokoli oyo nde okoyeba ke pasi ezalaka. Papa Mfumua Longo Papa Diangienda alobi ete mutu muindu soki nanu akufi te moyen ayeb azali te. Soki akufi ake koyeba ah nzoka ezalaka boye.
Mundele moko ayaki na Nkamba, tangu azongi mboka Nkamba ezali bien kasi alobaki nini ? Papa pasteur ozo yeba te ? Azoyeba te. Ba montres na ba monstres batondi kuna. Ba oyo bazangi place, batambolaka na bango, ndeti Cain aza na place ? (tee) te na bible nayebi te soki ezali ke Cain asengaki bolimbisi. Asengaki ? Ezali ? (tee) Cain asengaka bolimbisi ? (teee) Adamu asengaka bolimbisi ? (tee Papa) moko te asenga bolimbisi hein ? ( Papa Katembo : moko te na bango, tangu Adam abebisaki Nzambe aye kotuna eyano apesaki na Nzambe ezalaki malamu te, ya lolendo ya mutu makasi. Tangu Cain abebisi molimo ya Nzambe esili kati na ye, Nzambe aye kotuna ye wapi ndeko na yo Abel ? Cain reponse apesaki ya lolendo ya koloba ke otiaki nga sentinelle ya kotalelaka yo Abel ? Asengaki bolimbisi te Papa) Est ce que batu wan abaza na place ya bien ? (teeee) place ya bien te hein ? (ingetaaa) hein makambu mazali bien ezali te ? (ezaliii) Humm salela Nzambe na yo na solo lobiko ekozala na yo.
Entouka tolobi mingi mais eloko tosengi biso etikali muke tokende mabondeli ezala mingi, bobatela mboka oyo, tobatela yango. Bilembo pe ezali ebele oyo ya malamu mais toza kobatela yango te. Oyo Nzambe apesa biso ezali ya mingi kasi lokola tangu yango nanu ekoki te tozo mona ke pasi ezali. Toyebaka ke bakoya ebele na mokili na biso mais soni ezala te. Biso nde tokoyamba mokili mobimba soni ezala te. Kasi na allure tozo kende nango ya mabe esprit kaka ya kobunda, ya bitumba, wana nde mabe. Kais mapamboli toza nango ya mingi. Tozala kaka makasi na bolingo, mibeko pe misala, Tata, Muana pe Molimo Santu, Amen.
_______________________________________

Aucun commentaire